Académique Documents
Professionnel Documents
Culture Documents
Mayebisi
O mwa inei na 18h RENOUVEAU DANS LESPRIT O mwa mposo na 15h 1. CHORALE 2. ACOLYTAT 3. LECTORAT O mwa lomingo na 12h30 LEGION DE MARIE O mwa lomingo inso na 14h00 MISA NA LINGALA (RITE ZAIROIS) N.B. - Mpo ya Batisimu esengeli komiyebisa mposo isato liboso mpo ya bolengeli. - Nganga Nzambe azali mpe koyamba mpo ya ntubela mpe mpo ya kolengele libala lisantu.
Lomingo la 7 o mobu B
19 fvrier 2012
ans Vers 5
LOKASA YA LOMINGO
BOYAMBI NA NGAI, LIBAKU YA LIBIKI YA BASUSU. Yezu amoni boyambi bwa bango alobi na moto akufa makolo: "Mwana wa ngai masumu ma yo malimbami". Boyambi na biso ezali likabo Nzambe apesi biso mpo totala mpe likambo ya baninga na biso. Mpasi mpe esengo ya moninga ezali mpe ya biso. Boyambi wana bozali kotinda biso tolakisa elongi ya Kristu epai ya baninga. Mpe lisusu kozwa makanisi kitoko mpo ya kozwa eyano na makambo ya baninga. Yezu-Kristu azali o kati ya biso. Tolekisa ntango na makambo mosusu te mazanga ntina, kasi toluka komekola manso Yezu alobaka mpe alakisaka mpo tomona oyo ye azali kosala. MA FOI, OCCASION DE SALUT POUR LES AUTRES. Voyant leur foi, Jsus dit au paralys:" Mon fils, tes pchs sont pardonns". La foi que nous avons reu comme don de la part de notre Seigneur, se veut une conjugaison d'amour. Le problme de lautre, mon frre et ma soeur, est aussi mon problme. Au nom de notre foi, il est de notre devoir, non seulement de faire dcouvrir aux autres la face de Jsus, c'est--dire faciliter le contact mais aussi de faire preuve d'une imagination cratrice pour atteindre le Christ. "Faire une ouverture et descendre le brancard sur lequel tait couch le paralys". Jesus-Christ est parmi nous, ne dpensons pas notre temps pour rien mais faisons plutt l'exprience qui nous poussera dire: " Nous n'avons jamais rien vu de pareil".
Abb Nol Mpati, aumnier
Mpo ya nsango inso ya esengo to ya mawa itali lisanga benga bandeko ba Commission ya Caritas o ba numros iye mpo ya bopanzi nsango : 07930229408, 07957781758.
Copyright Commission de Communication Sociale de lAumnerie Catholique Congolaise de Londres
Karezimo nde ebandi mokolo mwa misato oyo le 22 na misato ya mputulu. Mpo ya aumnerie nde tozwi yango mokolo mwa lomingo le 26 na Saint Mary & Saint Michael epai wapi tokozala na misa lokola match ekozala na Emirat Stadium.
Matangi ma lelo
Litangi lya yambo / Premire lecture / First reading Awa Nzambe abikisi ba-Israel o boombo, alakisi te akolimbisa bango mpe masumu. Liloba lya Nzambe lokola profeta Izaya akomi (43,18-19.21-22.24b-25) Mokonzi Nzambe alobi: 18,,Sikawa bokanisa makambo ma kala lisusu te, botika kokundola o mitema makambo masili maleki.19 Tala nakobimisa makambo ma sika, mabandi komonono; bozali komono mango te? Solo, nakopasola nzela o eliki, mongala mokotiyola o esika mai mazalaki te. 21 Bato nabokoloki mpo ya ngai, bakosakola lokumu la ngai. 22 Kasi bino bato ba Yakob, bobeleli ngai te; bino bana ba Israel, bolembeki ngai ! 24 Na masumu ma bino bokomisi ngai lokola moombo, bolembisi ngai motema na mabe ma bino. 25 Nzokande ezali ngai, ngai moko nakolimbisa masumu ma bino na motema moko; mpe nakokanisa mabe ma bino lisusu te. (Bomanyoli) Psaume / Psalm / Nzembo 41(40), 2-3a.4a,5-6,11a.12a.13
Mokonzi, obikisa ngai mosumuki. 1. Esengo na moto akokanisaka babola na bato ba mawa, O mokolo mwa malozi Mokonzi akobikisa ye. Nzambe akokabela ye, akopesa ye bolamu o nse, Ntango akomi na mpasi, Mokonzi akosalisa ye. 2. Nalobaki: Mokonzi, yokela ngai mawa! Bikisa ngai, nasali masumu o miso ma yo! Banguna bazali kosolola makambo mabe mpo ya ngai: Akokufa mokolo nini mpo te nkombo ya ye esila? 3. Kasi yo Mokonzi, yokela ngai mawa, telemisa ngai, Nakoyebisa te olingi ngai solo Na lisalisi lya yo nakolenda lisusu Mpe okopesa ngai bomoi o miso ma yo seko.
Matangi ma lelo
Nsango Elamu / vangile / Gospel Aleluya, Aleluya. Nzambe atindeli biso Yezu, mosaleli wa ye, mpo te asangela babola Nsango Elamu ya libiki. Aleluya. Nsango Elamu lokola santu Marko akomi (2,1-12) 1 Awa Yezu akomi lisusu o Kafarnaum, bato bayoki te azali o ndako, 2 bayei ebele tee ndako etondi mpenza, ata liboso lya ndako bato batondi. Yezu ateyi bango Liloba lya Nzambe. 3 Bayeli ye moto moko akufa makolo, bato banei mamemi ye. 4 Kasi nzela ya kokoma penepene na Yezu ezali te, zambi bato baleki mingi. Yango wana babuti o motondo mwa ndako likolo lya esika Yezu azali; batoboli lilusu mpe bakitisi kitikwala n mpe moto akufa makolo. 5 Yezu amoni boyambi bwa bango, alobi na moto akufa makolo : ,,Mwana wa ngai, masumu ma yo malimbami. 6 Bateyi basusu ba Mobeko bafandi mpe wana, bakanisi o kati ya mitema: 7 ,,Boniboni moto oyo akoki koloba bongo? Atuki Nzambe! Nani akoki kolimbisa masumu? Bobele Nzambe te? 8 Yezu ayebi makanisi ma bango, alobi: ,,Mpo nini bozali kokanisa bongo ? 9 Nini eleki mpasi: koloba na moto akufa makolo : Masumu ma yo malimbami, to koloba na ye: Teleme, kamata kitikwala ya yo mpe tambola? 10 Bongo, mpo te boyeba te Mwana wa Moto azali na nguya ya kolimbisa masumu awa o nse, alobi na moto akufa makolo: 11 ,, Nalobi na yo: Teleme, kamata kitikwala ya yo mpe kende o ndako. 12 Moto ona atelemi, akamati kitikwala mpe abimi o miso ma bato banso. Bongo bato banso bakamwi mpe bakumisi Nzambe, balobi: ,,Mokolo moko te tomoni likambo lya ndenge eye.
Litangi lya ibale / Deuxime lecture / Second reading Tosengeli kotosa Nzambe oyo akokisaka bilako bya ye binso. Monkanda mwa mibale mwa santu Polo ona bakristu ba Korinti (1,18-22) Bandeko, 18 o miso ma Nzambe oyo akokosaka te, nayebisi bino : maloba nalobi na bino malobami na mitema mibale te. 19 Mwana wa Nzambe, Kristu Yezu, oyo biso na Silvano na Timoteo tosangelaki o kati ya bino, azali na mitema mibale te, azalaki se na monoko moko. 20 Na ye Nzambe akokisaki bilako binso alakelaka; yango wana o nkombo ya ye, tokolobaka ,,Amen na Nzambe mpo ya lokumu la ye. 21 Oyo alendisi biso na bino o boyambi Kristu, oyo apakoli biso mafuta, se Nzambe. 22 Ye moto atii elembo o mitema mya biso mpe akabeli biso Elimo Santu lokola ndanga ya libiki.
Losambo mpo na Congo Nzambe, Totondi Yo, tokumisi Yo, Okeli mboka Congo mpe otondisi yango na bomengo ndenge na ndenge, Yo opesi biso mboka oyo Congo, Tozali kosenga Yo tinda Elimo Santu epai na biso ba congolais, Mingi mpenza na baye balingi kokamba mboka oyo Congo, Pesa bango bwanya mpe mayele ya kobanga Yo mpe ya kolinga mboka na bandeko banso, Simba mitema mya moko moko mpo bazwa makanisi kitoko maye makotombola mboka oyo Congo, Congo ezala mboka ya boboto, ya boyokani, ya bosembo mpe ya esengo, Mama Maria omema mboka oyo Congo, osambela mpo ya biso, Mwa-esengo Bakandja, Mwa-esengo Anuarite, bino bana Congo, bosambela mpo ya biso, Tosambeli na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu, Amen.