Académique Documents
Professionnel Documents
Culture Documents
Mayebisi
O mwa inei na 18h RENOUVEAU DANS LESPRIT O mwa mposo na 15h 1. CHORALE 2. ACOLYTAT 3. LECTORAT O mwa lomingo na 12h30 LEGION DE MARIE O mwa lomingo inso na 14h00 MISA NA LINGALA (RITE ZAIROIS) N.B. - Mpo ya Batisimu esengeli komiyebisa mposo isato liboso mpo ya bolengeli. - Nganga Nzambe azali mpe koyamba mpo ya ntubela mpe mpo ya kolengele libala lisantu.
26 fvrier 2012
ans Vers 5
LOKASA YA LOMINGO
BONGOLA MOTEMA MPE BONDIMA NSANGO ELAMU. Eleko ya Karezimo ebandi. Ntango ya komitala mpe kobongola mitema. Tobengami mpo na kozela, mpo na komipetola, mpo na kobunda etumba mpe lisusu kotala motema malamu mpe loboko ya Mokonzi. Na komitala, tomona masumu ma biso, bozangi bokaboli mpe koboya koyoka Nzambe na kati ya bomoi na biso. Na Karezimo tobengami lisusu mpo na kolanda Yezu na ndenge alongi monguna satana na bikoseli bya ye. Mikolo 40 mikomema biso na Pasika, tozwa makasi ya boyambi na biso mpe tosalela yango. Kristu nde alongoli biso na molili mpo amema biso na mwinda. KAREZIMO ELAMU NA BINO BANSO !
Protocole & Fete : Likita vendredi 2 mars 2012 na mpokwa epai ya maman Bijou Sindula.
Mpo ya nsango inso ya esengo to ya mawa itali lisanga benga bandeko ba Commission ya Caritas o ba numros iye mpo ya bopanzi nsango : 07930229408, 07957781758.
Copyright Commission de Communication Sociale de lAumnerie Catholique Congolaise de Londres
CONVERTISSEZ-VOUS ET CROYEZ A LA BONNE NOUVELLE. Nous vivons dj le carme. Ce temps de repentir et de conversion s'adresse tous. Nous sommes invits faire l'exprience de l'attente, de la purification, de l'preuve et aussi de la fidlit de Dieu ses promesses. Et nous exprimentons en mme temps notre pch, notre gosme, la mdiocrit et labsence de rfrence de Dieu dans notre vie. Nous sommes appels imiter Jsus qui nous enseigne vaincre la tentation. Pendant ces 40 jours qui nous mneront la Pques de la rsurrection, nous pouvons puiser un courage renouvel pour accepter patiemment et dans la foi toutes situations difficiles et d'preuve, avec la conscience que le Seigneur fera surgir des tnbres un jour nouveau. BONNE ROUTE DE CARME A VOUS TOUS ! Abb Nol Mpati, aumnier
Matangi ma lelo
Litangi lya yambo / Premire lecture / First reading Nzambe alingi se bolamu bwa bato: abikisi bango mpe akati na bango bondeko. Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Libandela (9,8-15) 8 Nzambe alobi na Nowe mpe na bana ba ye: 9,,Nakokata bondeko na bino mpe na bana ba bino baye bakoya nsima, 10 mpe na bikelamo binso bizali na bomoi mpe bifandi penepene na bino: ndeke, nyama ya mboka mpe nyama ya zamba, nyama iye inso ibimi o masuwa, nyama inso ya mokili. 11 Nakokata bondeko na bino: moto moko akokufa na mpela lisusu te; mpela ekobebisa mokili lisusu te. 12 Nzambe alobi lisusu: ,,Tala elembo ya bondeko nakokata na bino mpe na bikelamo binso bifandi penepene na bino, mpe na bato banso bakobotama nsima: 13 Natii monama o likolo lokola elembo ya bondeko kati ya ngai mpe ya mokili. 14 Ntango nakosangisa mampata likolo lya mokili mpe monama mokomonono o kati ya mampata, 15 nakokanisa bondeko nakati na bino mpe na bikelamo binso bizali na bomoi. Mai makokoma lisusu mpela enene te, eye ekoboma bikelamo binso bizali na bomoi. (Bomanyoli) Psaume / Psalm / Nzembo 25(24), 4-5ab,6-7,8-9,10.14
E Mokonzi, okamba biso o nzela ya yo. 1. Mokonzi olakisa ngai nzela ya yo, Osalisa ngai nalanda mibeko mya yo. Oteya ngai bosolo bwa yo; okamba ngai, Zambi mobikisi wa ngai, se yo! 2. Yawe, okundola ngolu ya yo, Bolingi bwa yo, bolingi bwa seko. Obosana masumu ma ngai ma bolenge, Okanisa ngai se motema bolingi. 3. Mokonzi, oleki motema molanu mpe bosembo, Okozongisa basumuki o nzela ya solo. Okolakisa bato ba bosawa nzela ya bosembo, Mpe bato ba mawa nzela ya mitindo mya yo. 4. Soko bato batosi mibeko mya bondeko bwa yo, Okosala manso na bolingi mpe na bosembo, Moto abangi mokonzi akozwa bondeko bwa ye, Mobeko mwa ye mokopesa ye mayele.
Matangi ma lelo
bongo akendeki koteya milimo mya bato bakangemaki o mboka ya bawa. 20 Kala baboyaki kotosa, kasi Nzambe akangaki motema. Ezalaki o eleko Nowe atongaki ebei enene: bobele bato mwambi babikaki na yango o mai. 21 Mai mana mazali lokola elembo ya batisimo ebikisi bino sikawa; batisimo ekolongola mbindo ya nzoto te, kasi bato bakokula batisimo mpo te basalela Nzambe na motema molamu mpo ya nsekwa ya Yezu Kristu. 22 Ye abuti o likolo mpe afandi o loboko la mobali la Nzambe; kuna banzelu, bilimo bya nguya mpe bya bokonzi bakotosa ye. Nsango Elamu / vangile / Gospel E Mokonzi, maloba ma yo mazali bosolo, makobikisa biso. Moto akobika bobele na mampa te, kasi na maloba ma Nzambe Nsango Elamu lokola santu Marko akomi (1, 12-15) Awa Yezu auti kokula batisimo, 12 Elimo atindi ye o eliki. 13 Aumeli o eliki mikolo ntuku inei; Satana ayei kosenginya ye. Azalaki o kati ya nyama ya zamba, mpe banzelu bazalaki kosalela ye. 14 Ntango basilaki kokanga Yoane o boloko, Yezu akomi o Galilea. Asangeli Nsango Elamu ya Nzambe, alobi: 15 ,,Elaka ekoki: Bokonzi bwa Nzambe bokomi penepene; bobongola mitema mpe boyamba Nsango Elamu.
Mikolo minso mya vendredi o eleko ya Karezimo, tozali na Nzela ya Kuruze awa na paroisse na ngonga ya 17h30. Campagne ya Karezimo: tokokongola bilambi mpe mosolo mpo ya kosalisa na Congo. Catholics ezali film ezali koleka mikolo mia minei na 21h na BBC4. Yango ekolakisa ndenge nini mokristu katoliko azali lelo awa na UK.
Losambo mpo na Congo Nzambe, Totondi Yo, tokumisi Yo, Okeli mboka Congo mpe otondisi yango na bomengo ndenge na ndenge, Yo opesi biso mboka oyo Congo, Tozali kosenga Yo tinda Elimo Santu epai na biso ba congolais, Mingi mpenza na baye balingi kokamba mboka oyo Congo, Pesa bango bwanya mpe mayele ya kobanga Yo mpe ya kolinga mboka na bandeko banso, Simba mitema mya moko moko mpo bazwa makanisi kitoko maye makotombola mboka oyo Congo, Congo ezala mboka ya boboto, ya boyokani, ya bosembo mpe ya esengo, Mama Maria omema mboka oyo Congo, osambela mpo ya biso, Mwa-esengo Bakandja, Mwa-esengo Anuarite, bino bana Congo, bosambela mpo ya biso, Tosambeli na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu, Amen.
Litangi lya ibale / Deuxime lecture / Second reading Mai ma mpela enene mazalaki elembo ya batisimo. Na batisimo Yezu oyo asekwi afungoleli biso nzela ya bomoi bwa sika. Monkanda mwa yambo mwa santu Petro (3,18-22) Bandeko, 18 Mpo ya masumu Kristu awaki mbala yoko seko; ye moto wa bosembo awaki mpo ya bato bazangi bosembo, mpo te akamba bino o mboka Nzambe. Babomaki nzoto ya ye, kasi azwi lisusu bomoi na nguya ya Elimo Santu. 19 Bobele