Vous êtes sur la page 1sur 1

Mokonzi, tinda mpema ya yo


Psaume 103 (104)
1ère Lecture
Veillée Pascale Francis PAPY

   
             
       
      
       
  
  
                
Mo ko nzi, ti nda mpe ma ya yo, mpe bi ke la mo bwa si ka bi ko to nda o mo ki li.

                        
  
 

           
 
        
6

1. Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi !


Mokonzi Nzambe wa ngai, opusi bonene !
Molato mwa yo, nkembo mpe lokumu la yo,
Mwinda mozingi yo lokola monkoto.

2. Opiki mokili o makonzi makasi-i,


Mokoki koningana te o bileko na bileko.
Olatisi mwango mbu lokola elamba,
Mai makomaki kin’o nsonge ya ngomba.

3. Okotindaka mai na maziba o miluka-a-a,


Mapasola nzela okati ya ngomba-a,
Penepene na mai ndeke ikotongaka zumbu-u,
Ikoyembaka wana o bitapi bya nzete.

4. Ut’o ndako ya yo okonoiselaka ngomba mbula,


Okomelisaka mabele mbula eye otangisi-i.
Okotoisaka matiti mazala bilei bya ngombe-e,
Okotoisaka mpe mbuma ya mampa iye bato bakolonaka mpo ya kolia.

5. Mokonzi, bikela bya yo bizali mingi !


Osali byango na bwanya-a,
Otondisi mokili na biloko-o.
Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi-i !
Aru, Février 2024

Vous aimerez peut-être aussi